عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Hud [Hud] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Hud [Hud] Ayah 123 Location Maccah Number 11

1. Alif, lâm, râ(1). Buku eye mikapo miango mibongisami na lolenge ya kitoko mpe milimbolami na oyo atonda bwanya, moyebi ya ba sango.

5. Kasi sólo, bazali kotondisa mitema mia bango na kobomba (ki bonguna), ata soki bazali komibomba na bilamba bia bango, ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa polele, ya soló, ye ayebaka maye mabombami o kati ya mitema.

6. Мре ezali na nyama(1) moko te na mabele sé bozui naye ezali kowuta epai ya Allah, mpe ayebi esika avandaka, na esika abombamaka. Nyoso esila kokomama o kati ya buku ya polele ya bosembo.

13. To bazali koloba été: Ezali lokuta asali yango ye moko (kurani). Loba: Boya na mikapo zomi lokola oyo nayei na yango, oyo bosala bino moko, mpe bobenga nani bolingi oyo akoki kosalisa bino na yango na botiki Allah, soki bozali na bosóló.

14. Mpe soki bakoki te koya na yango, boyeba ya soló, été yango ekiti na mayele naye moko Allah, mpe ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe boye bozali bamisokia.

17. Boye moto oyo azali na buku ya bosembo ya polele na maboko naye, ewuti epai na Nkolo naye, mpe nzeneneke akiti (anzelu gabiliyele) azali kotanga yango, boye akokani na moto oyo azali na eloko moko te ya bosembo na maboko naye? Mpe buku ya Müssa ekitaki liboso naye, (Muhammad) ezalaki bokambi mpe ngolu, baye wana bandimi na yango, kasi baye bakosangisa bakopengwa na yango o kati ya bato, moto nde elaka na bango, kozala na tembe te тропа yango. Ezali solo kowuta epai ya Nkolo wa yo, kasi ebele ya bato bazali kondima na yango te.

21. Baye wana nde bamibebisi bango moko, mpe babungisi binzambi nzambi oyo bazalaki kobondela mpe bazalaki kotia elikya ete bakosunga bango.

24. Lisanga oyo na oyo mosusu ndakisa na bango ezali lokola bato mibale: Oyo amonaka te, mpe ayokaka te, oyo mosusu amonaka mpe ayokaka. Boye bazali lolenge moko? Na yango bozali kokanisa te?

25. Mpe tosilaki ya soló, kotinda Nûh epai ya bato baye, (alobi): Ya solo, ngai nazali mokebisi ya polele.

28. Alobaki ete: Oh bato na ngai! В omoni boni soki nazali na elembo ya bosembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai ngolu kowuta epai naye mpe bozangi yango, biso tokokanga bino na makasi te mpo bozua yango mpe bino bozali koyina?

30. Oh bato ba ngai! Nani akosalisa ngai na (etumbu) ya Allah soki nabengani bango? Boye bozali kokanisa te?

35. Mpe bazali koloba été azali kokosa! Loba: Soki nakosi lisumu yango ekozala na molimo na ngai moko. Mpe nazali mosika na makambo mabe oyo bozali kosala.

36. Mpe emoniseli ekitelaki Nûh ete: Ya soló, bato nayo oyo bakondimaka nayo lisusu te, longola sé baye bandimaki liboso. Kasi komitungisama te тропа maye bazali kosala.

38. Mpe abandi kotonga masuwa, mpe tango nyoso bankumu na bango bazali koleka, bazali koseka ye. Azongiseli bango eyano alobi: Soki bozali koseka biso, ya sólo, biso mpe tokosekaka bino ndenge bozali koseka.

39. Mpe ezali na tango molai te bokoyebaka nani oyo etumbu ekoyela ye, etumbu ya makasi mpe ya kosilisa lokumu, mpe esengeli naye kozua etumbu oyo ekotikala libela.

40. Kino tango mokano (mitindo) mia biso eyaki, mayi etombokaki na mpela ya makasi tolobaki naye été (Nûh): Kotisa okati ya masuwa lolenge ya banyama mibale mibale (mwasi na mobali) okotisa mpe libota nayo, longola sé ba oyo ekomamaki été esengeli bakufa, mpe baye bandimaki, kasi bandimaki naye te sé bato moke penza.

41. Мре alobaki: Bomata okati na yango na nkombo ya Allah oyo afandisi yango likolo ya etamboli na yango. Ya soló, Nkolo na ngai azali penza molimbisi atonda ngolu.

42. Mpe ebandi kotepatepa likolo ya mayi kino ememaki bango kati kati ya mbonge ya makasi lokola ba ngomba ya minene, mpe Nûh abengi mwana naye oyo aboyaki komata na masuwa: Eh mwana na ngai! Mata elongo na biso, kasi kotikala te elongo na bapengwi.

43. (Mwana) ayanoli été: Nakomata likolo ya ngomba oyo тропа komibatela na mayi. (Nûh) alobaki naye été: Lelo mobateli akozala te тропа etumbu ya Allah, longola sé oyo akoyokela ye mawa. Na sima mbonge ekaboli bango, mpe (mwana waye) atikalaki elongo na baye bazindisamaki (na mayi).

44. Mpe motindo epesamaki été: Oh mabele! Mela mayi nayo, oh mapata! Tika (konokisa mbula) mayi makutolamaki mpe masuwa makendeki kotelema likolo ya ngomba, nkombo na yango djudi. Mpe motindo ekweyaki été: Bato mabe balimwa.

45. Mpe Nûh abelelaki Nkolo waye: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, mwana wa ngai azali o kati ya libota lia ngai, mpe elaka nayo ezali solo, mpe ozali zuzi ya bosembo koleka ba zuzi banso.

46. Azongisi été (Allah): Eh Nûh! Azali o kati ya libota lia yo te, mpo mosala naye ezali malamu te. Mpe kotuna ngai te likambo liye ozali na boyebi na yango te. Ya solo, nazali kopesa yo toli été: Ozala mosika na baye bazangi boyebi.

47. (Nûh) alobaki été: Eh Nkolo! Ya solo, nasengi libateli nayo mpo été nasenga yo maye nazali na boyebi na yango te, mpe soki olimbisi ngai te, mpe oyokeli ngai mawa te, nakozala elongo na bazangi.

48. Mpe motindo mopesamaki été: Eh Nûh! Kita na masuwa na kimia na biso, mpe mapamboli ebele likolo nayo na bato baye bazali elongo nayo. Mpe basusu bakoya sima nayo, tokopesa bango bomengo ya tango moke, sima etumbu ya biso ya makasi ekozua bango.

49. Wana ezali ba sango ya mabombami tozali kokitisa epai nayo, kasi oyebaki yango liboso te, yo (mohamed) na bato nayo liboso nayo. Na yango, esengeli nayo koyika mpiko, mpo été suka ya malamu ezali тропа babangi (Allah).

52. Mpe oh bato bangai! Bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye. Akonokisela bino mbula kowuta o likolo ya kolandana, mpe akobakisela bino bokasi likolo lia bokasi. Kasi boboya (ye te), noki bokokoma batomboki.

54. Biso tokoloba sé été: Moko kati na ba nzambe na biso asili kosala yo mabe, alobaki na bango ete: Ya soló, ngai nazui Allah nzeneneke wa ngai, bino mpe bozala nzeneneke été ngai nawangani mpe nazali mosika na bikeko na bino na maye bozali kosangisa (Allah).

55. Soki ye te (kotika Allah), bosalela ngai likita bino banso (na banzambe na bino), mpe bozelisa ngai te.

56. Ya sólo, natie elikia na ngai epai ya Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Eloko moko te ekoki kozala na esika na yango sé ayeba yango (mpe azala na bokoki тропа yango). Ya sólo Nkolo wa ngai azali na nzela ya semba.

57. Mpe soki boboyi, ya sólo, ngai našili kokomisa maye natindamaki na yango epai na bino. Mpe Nkolo wa ngai akolongola bino mpe akoya na bato ya malamu na esika na bino, mpe bokosala ye eloko moko te. Ya sólo, Nkolo wa ngai azali mobateli ya biloko binso.

59. Mpe wana nde bato ya aad (etuka ya mboka ya ntoma Hûd) baye babundisaki bilembo bia Nkolo wa bango, mpe bazangaki kotosa batindami ba bango, mpe balandaki likambo lia lolendo mpe mabe.

60. Mpe botutu elandaki bango awa nanse mpe kino o mokolo mwa suka ekozala lokola, ya sôló ba aad bapengwaki penza na Nkolo wa bango, kasi ba aad bazala mosika (babebisama) bato ya Hûd?

61. Mpe (totindaki) epai ya bato ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah. Bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye. Ye nde akela bino kowuta na mabele, mpe akomisi bino ebele o kati na yango. Bosenga ye bolimbisi, sima botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azalaka pene тропа koyanola. (ba mbela)

63. Alobi: Oh bato bangai! Bomoni boni soki nazali na elembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai mpe apeși ngai ngolu kowuta na yango? Nani oyo akosunga ngai epai ya Allah soki na zangi kotosa ye (Allah)? Noki bokobakisela ngai pasi likolo ya pasi.

65. Kasi babomaki yango mpe basasi yango, mpe alobi na bango: Bokokangama kati na bandako na bino mikolo misato, wana ezali elaka ya tembe te.

68. Lokola bazalaki na nkembo liboso te okati na yango. Ya soló, bato ya Thamúd bapengwaki na Nkolo wa bango kasi bato ya Thamûd babebisamaki.

69. Мре ya soló, batindami(1) na biso bamemelaki Ibrâhîm sango elamu(2), tango bakutanaki naye balobi: Kimia(3) ezala nayo! Alobaki été: Kimia na bino mpe lokola! Mpe ewumelaki te abonzelaki bango libonza lia nyama. (ngombe) ya kotumba.

71. Mwasi waye azalaki ya kotelema, (sarah) mpe aseki, mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq mpe sima naye Ya’qüb.

72. Alobi: Oh mawa na ngai! Nabota mpe ngai nakomi mobange, mpe mobali wa ngai oyo mpe mobange. Ya soló oyo ezali (likambo) ya kokamwisa.

73. Balobi: Ozali kokamwa na mikano mia Allah? Tika été mawa mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na bino bato ya libota oyo. Pamba te ya sólo, Allah akumama mpe asanzolama na lokumu mingi.

75. Ya soló, Ibrâhîm azalaki moto malamu, azalaki kozonga mpe kotubela mingi epai ya Nkolo naye.

77. Mpe tango batindami(1) na biso bakomaki epai ya Loth, ayokaki pasi mpe mawa тропа bango. Alobaki: Lelo nde mokolo mwa etumbu ya somo.

78. Mpe bato baye bayeli ye mbangu. Mpe liboso bazalaki kosala makambo mabe, mpe alobaki na bato naye été: Oh bato bangai! Bótala bana ba ngai ya basi bango oyo, bazali peto mpe malamu тропа bino. Bobanga Allah kasi boyokisa ngai soni te тропа bapaya ba ngai. Boye bozali ata na moto moko ya malamu o kati na bino te?

79. Bayanoli: Oyebi malamu penza ete tozali na posa ya bana nayo ya basi te, (bango bazalaki kolinga kozua basi na mboka ena te) ya soló, oyebi eloko nini tozali kolinga.

80. Alobaki na bango été: Ah soki nazalaki na makasi ya kotelemela bino, to mpe nazua ata lisungi mosusu ya makasi koleka!

81. (Bapaya) balobi: Eh Loth! Ya sólo, tozali batindami ya Nkolo wa yo. Bakosala yo eloko te, kende noki na libota lia yo okati na butu. Мре токо te kati na bino abongola elongi sima te, longola sé mwasi wayo (oyo azangaki kotosa), mpe akozua oyo ekozua basusu. Solo elaka na bango ekozala na ntongo, boye ntongo ezali pene te?

82. Mpe tango motindo mwa biso mokweyaki, tobalusaki (mboka yango) na ba ngambu inso, mpe tobebisaki yango, mbula ya mabanga esangani na mabele ya moto ekitelaki bango na bango:

83. (Mabanga yango) ezalaki na bilembo yango kowuta epai ya Nkolo nayo, mpe yango ezalaki mosika te na bato mabe (babubi).

84. Mpe (totindaki) epai ya bato ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaïb, alobaki na bango été: Oh bato na ngai! Bobondela Allah oyo bozali na nzambe mosusu te sé ye. Мре bokutola emekelo, na kilo te. Ya soló, na moni bino na bomengo, mpe ya sólo, nazali kobangela bino etumbu o mokolo oyo ekozinga biloko binso.

86. Bomengo ya libela epai ya Allah ezali malamu тропа bino soki ya sólo bozali bandimi, mpe nazali mokengeli likolo na bino te.

87. Balobi naye été: Eh Shuaíb! Losambo nayo nde ezali kotinda yo mpo totika kobondela biye bankoko na biso babondelaki to epekisa biso ete tosalela bozui na biso lolenge tolingi? Ya sólo penza, ozali moto malamu ya bosóló koleka?

88. Alobaki été: Oh bato ba ngai! В omoni ndenge nini soki nazali na elembo ya bosóló kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai bozui bolamu kowuta epai naye? Mpe mposa na ngai ezali te été na zala na bino na bokeseni na maye nazali kopekisa bino. Kasi nazali kolinga sé mbongwana ya malamu na ndenge ya bokoki na ngai. Kasi elonga na ngai ekowuta sé epai na Allah. Nati elikia na ngai epai naye mpe epai naye nazali kotubela.

89. Mpe oh bato na ngai! В órnemela ngai bokeseni na kotungisa ngai te, noki etumbu ekozua bino, ndenge ezuaki bato ba Núh na bato ba Hûd na bato ba Swálih, mpe (ndakisa) ya bato ba Loth ezali mosika te тропа bino.

90. Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino mpe botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azali Nkolo wa mawa atonda bolingo.

91. Balobi: Eh Shua’íb! Tozali kososola te ebele ya maye ozali koloba, mpe tozali kornona yo ozali sé motawu o kati na biso soki ezalaki libota nayo te, tolingaki kosala yo mabe. (kobamba yo mabanga) mpe ozali na nguya moko te likolo na biso.

92. Alobaki: Oh bato ya mboka na ngai! В ozali kornona ete libota na ngai ezali na lokumu ераї na bino koleka Allah, тропа maye bozali kopesa mikongo? Ya sólo, Nkolo wa ngai (ayebi) manso bozali kosala.

93. Mpe oh bato ba ngai! Bosala maye bokolinga, ngai mpe nakosala. Kala te bokoyebaka nani oyo etumbu ekozua ye, oyo ekopesa ye soni mpe nani azalaki mobuki lokuta. Bozela, (eloko nini ekosalema) ngai mpe nazali kozela elongo na bino.

95. Lokola bavandaki kala te kati na yango, kasi ba mad’yan bazalaki mosika, ndenge moko ba Thamúd bazalaki mosika na ngolu (ya Allah).

100. Wana nde ba sango ya bituka tozali kopesa yo, (Muhammad), kati na yango misusu mizali kino moyi mwa lelo, mpe misusu misilaki kolimwa kala.

105. Mokolo moye ata molimo moko te akolobaka, sé na ndingisa naye kati na bango bakolelaka mpe basusu bakosepelaka.

110. Mpe tosilaki solo kopesa Mûssa buku, kasi bakabwanaki тропа yango. Soki liloba litiyamaka liboso kowuta epai ya Nkolo wa yo te, elingaki kokatama kati kati na bango. Mpe ya sólo bango bazalaki na tembe o kati na yango.

112. Misembola o nzela ya semba na ndenge batindaki yo elongo na baye batubeli (epai ya Allah), kasi kotomboko te, ya sólo ye amonaka maye bosalaka.