عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Romans [Ar-Room] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The Romans [Ar-Room] Ayah 60 Location Maccah Number 30

1. Alif, lâm, mîm.(1)

2. Bato ya loma balongaki te.

3. Mpe sima ya kokweya na bango, bakozala balongi okati ya mboka oyo ezali pembeni na bango.

24. Mpe kati ya bilembo bia ye azali komonisa bino bongengi (bwa nkake) na kobangisa na elikia ya kobetisa mbula kowuta na likolo тропа kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Wana ezali bilembo тропа baye bazali kososolo.

27. Mpe ye nde abandaka kokela mpe akozongisa yango, (ya bokeli sima azongisi yango,) mpe wana ezali pete тропа ye, mpe epai naye ezuami ndakisa ya koleka kuna na likolo mpe na nsé. Mpe azali na bokasi atonda bwanya.

32. O kati ya baye bakaboli lingomba lia bango mpe bakomisi yango binzambe nzambe, eteni na eteni ezali kosepela na oyo ya ye.

33. Mpe tango mabe ekoyelaka bato, babeleli Nkolo wa bango mpe bamizongisi epai naye na botubeli bonso, sima soki amekisi bango ndambu ya ngolu kowuta epai naye, okomona ndambu kati na bango babandi kosangisa Nkolo wa bango.

38. Mpe pesa moto ya libota nayo oyo esengeli тропа kopesa ye, mpe mobola, mpe moleki nzela oyo esengeli ya bango, wana ezali malamu тропа baye bazali koluka elongi ya Allah, mpe bango wana nde balongi.

39. Mpe maye manso bozali kobimisa ewuti na ekotama тропа kokolisa misolo mia bino likolo ya baninga, ekokolisama te epai ya Allah, kasi oyo bobimisi kowuta na zakat(1), тропа koluka elongi ya Allah, baye wana bakozua (lifuta) na bango ya kobakisama.

40. Allah nde akeli bino, тре apeși bino bozui, тре akoboma bino, тре sima akosekwisa bino. Na yango, moko kati ya baye bozali kosangisa ye na yango boye akoki kosalela bino eloko moko na oyo Allah asaleli bino? Nkembo naye oyo aleki na likolo na maye manso bazali kosangisa ye na yango.

41. Mabe esili котопапа polele likolo ya mabele mpe likolo ya mayi (ebale) kowuta na maye bato bazali kosala, na yango, Allah apeși bango ndambu ya etumbu ya maye basali, mpo bakanisa kozonga.

43. Tiya elongi nayo na lingomba lia (bosóló mpe lia botosi), yambo ete eya kowuta na Allah mokolo oyo bokokokaka kopuşa yango te, mpe mokolo wana (bato) bakokabwanaka.

44. Oyo akopengwa, akozua lifuta ya bopengwi naye, mpe oyo akosala bolamu, ezali тропа bolamu ya bango moko ya lobi nde bazali kolengele.

51. Mpe soki sima na yango totindi mopepe ya makasi ebebisi milona na bango mpe bamoni yango na langi ya mayi ya mosaka bakomi kozanga botondi.

60. Kanga motema na kozela. Ya solo, elaka ya Nkolo nayo ezali ya sólo mpenza, kasi baye bazangi kondima babungisa yo te.