عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Council, Consultation [Ash-Shura] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Council, Consultation [Ash-Shura] Ayah 53 Location Maccah Number 42

1. Hâ, mîm.(1)

2. A‘in, sín, qâf.(1)

3. Lolenge wana nde Allah wa bokasi atonda bwanya azali kokitisela yo emoniseli lokola akitiselaki baye balekaki liboso lia yo.

7. Mpe lolenge wana nde tokitiselaki yo kurani na lokota ya arabo, mpo okebisa yango na mama ya bamboka na baye bazuami zinga zinga na yango, mpe okebisa тропа mokolo mwa bosangani oyo ezali na tembe te. Basusu bakozala na lola mpe basusu bakozala na móto mwa saira (lifelo).

15. Benga na lolenge wana tikala na nzela ya semba lolenge batinda yo, kolanda bamposa na bango te, mpe loba; nandimi na maye Allah akitisa kati na buku, mpe natindamaki тропа kokata na bosembo kati kati na bino. Allah azali Nkolo wa biso тре Nkolo wa bino, tozali na misala mia biso тре bozali na oyo ya bino, likambo moko ekoki kosalema te kati kati na biso na bino. Allah akosangisaka biso, тре epai naye nde bozongi (bokozalaka)

16. Mpe тропа baye bazali kolobaloba na ntina ya Allah osima ya bobengi bwaye, manso bazali kosala mazali na ntina te epai ya Nkolo na bango, kanda ekokitelaka bango mpe bakozalaka na etumbu makasi.

19. Allah azali malamu тропа bawumbu baye, apesaka bozui na oyo alingi mpe azali na bokasi atonda nguya.

21. To boye, bazali na basangisi basusu baye balingi kosalela bango mibeko misusu mia lingomba miye Allah apesi ndingisa te? Soki тропа mobeko oyo ezali kati na bango te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango. Kasi babubi bakozalaka na etumbu makasi.

32. Мре o kati ya bilembo bia ye, masuwa kati na ebale, (okomona yango) lokola bangomba.

33. Soki alingi akitisi mopepe, mpe (okomona yango) etikali ya kotelema esika moko. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo тропа (bato) banso baye bazali kokanga motema mpe bazali kotondo,

34. То mpe akobebisa тропа masumu maye basalaki, kasi alimbisaka ebele.

36. Manso maye bopesamaki (ya malamu) ezali sé тропа bosepeli тропа bomoyi bwa lelo, kasi oyo ezali epai ya Allah ezali malamu mpe ewumelaka тропа baye bandima mpe bazali komipesa epai ya Nkolo wa bango.

38. Mpe baye bazali koyanola na bobengami bwa Nkolo wa bango, mpe batelemisi losambo mpe bazali kotunana (yambo ya kosala likambo) kati kati na bango, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango,

41. Kasi ba oyo bakomilongisa sima ya mabe basalaki yango, nzela ezali lisusu te mpo bazongisela bango mabe.

43. Kasi oyo akokanga motema mpe alimbisi, wana nde lolenge ya malamu ya kobongisa na yango likambo.

51. Mpe ezali na moto moko te oyo Allah asololi naye polele sé ezala emoniseli, to ezala sima ya eloko ezipi ye, to mpe atindela ye motindami (anzelu) mpe apesa ye oyo alingi na ndingisa naye (Allah). Ya sólo aleki na likolo mpe atonda bwanya.