عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The winnowing winds [Adh-Dhariyat] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The winnowing winds [Adh-Dhariyat] Ayah 60 Location Maccah Number 51

1. (Nalapi) na mipepe miye mipanzaka.

2. Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)

3. Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi.

4. Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko.

6. Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya.

7. Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu.

8. Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba.

9. Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo.

10. Bato ya lokuta basili kobomama.

12. Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini?

15. Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka.

18. Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi.

19. Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi.

20. Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló.

25. Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te.

26. Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba.

28. Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya.

29. Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini?

34. Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu.

38. (Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele.

39. Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma.

40. Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe.

41. Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)

43. Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke.

53. Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo.

54. Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)

59. Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te.