عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Spoils of war, booty [Al-Anfal] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Spoils of war, booty [Al-Anfal] Ayah 75 Location Madanah Number 8

9. (Mpe bokanisa) tango bosengaki lisungi epai ya Nkolo wa bino. Mpe andimelaki bino, ete ya soló: ngai nakosalisa bino na ba anzelu nkoto yoko bazali kolandana. (bango na bango)

14. Wana nde (ndenge ekozalela bino) esengeli bomeka yango (etumbu)! Mpe ya sólo, etumbu ya bapengwi ekozalaka nde moto.

16. Mpe oyo kati na bino akokima banguna o mokolo wana, longola sé oyo apesi mokongo тропа koluka lolenge mosusu ya kobunda, to akei kokutana na mapinga mosusu тропа kokoba bitumba, ayeba ete asili kozua nkanda ya Allah. Мре esika naye ekozalaka lifelo, mpe yango nde ekozalaka esika ya mabe.

17. Ezali te bino nde bobomaki bango, kasi Allah nde abomaki bango. Мре tango obwakaki (likonga), ezali yo te nde obwakaki, kasi Allah nde mobwaki, (likonga) mpe ezali тропа kopesa bandimi bolamu na ndenge naye. Ya soló, Allah azali moyoki atonda boyebi.

18. Yango ezali mpo oyeba lolenge kani Allah azali kobebisa mwango ya bapengwi.

19. Soki bolukaki elonga, ya soló, elonga esilaki koyela bino. Mpe soki botiki ezali malamu тропа bino, kasi soki bozongeli tokozonga, mpe lisanga na bino ekosalisa bino na eloko te, ata soki bozali ebele ndenge nini. Kasi boyeba ete: Ya sólo, Allah azali elongo na bandimi.

22. Ya sólo, bazoba koleka banyama epai ya Allah, bazali baye bakufa matoyi, baye balobaka te (baba), bango wana bazangi kososola.

23. Mpe soki Allah ayebaki(1) ete bazali na bolamu, balingaki koyokisa bango maye makosunga bango, mpe soki ata ayokisaki bango balingaki sé kopesa mokongo na koboya.

30. (Mpe kanisa) tango eye bapengwi basalelaki yo(1) likita été bakanga yo to koboma yo, to babengana yo. Basalaki likita yango, Allah mpe asaleli bango, kasi Allah azali Nkolo likita ya malamu koleka.

33. Kaši Allah azali te тропа kopesa bango etumbu mpe ozali kati na bango, тре Allah azali te тропа kopesa bango etumbu тре bango bazali kosenga bolimbisi.

41. Mpe boyeba ete manso bokozua na bitumba: Ya sólo, moko na mitano ezali тропа Allah na motindami mpe тропа mabota ya pene, mpe тропа bana bitike, тре тропа babola, тре тропа moto ya mobembo, (moleki nzela), soki ya soló, bozali kondima na Allah mpe kondima na maye tokitisaki epai ya mowumbu wa biso o mokolo mwa bososoli, mokolo moye mapinga mibale makutanaki. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya eloko nyoso.

43. Boye tango Allah alakisaki yo kati ya mpongi ete bazali mingi te, soki amonisaki yo ete bazali ebele mbele bokimaki na kobanga kobunda mpe bolingaki koswana na likambo yango kasi Allah abongisaki, ya soló, ye nde moyebi ya maye mabombami o kati ya mitema.

46. Мре botosa Allah na motindami waye, mpe bosuana suana te noki bokokabwana mpe bokozanga bokasi. Na yango, bolenda na kokanga motema pamba te ya soló Allah azali elongo na bakangi mitema.

49. (Bokanisa) tango bato ya bilongi mibale, mpe baye bazali na bokono o kati ya mitema mia bango, balobaki na bandimi ete: Bato oyo lingomba lia bango lizali kokosa bango. Kasi oyo akomipesa na Allah, ayeba ete yasoló, Allah azali na bokasi atonda bwanya.

54. Bazalaki ndenge moko na bato ba falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, baboyaki kondima na mikapo na bilembo bia Nkolo wa bango. Yango topesaki bango etumbu тропа masumu та bango. Mpe tozindisaki na mayi bato ya falo тропа bobubi bwa bango.

57. Soki ozui bokoki likolo na bango o tango ya bitumba, pesa bango etumbu eye ekoki mpo basusu oyo bazali sima na bango babanga, mpe mpo bakanisa.

58. Mpe soki ya sólo, ozali kobanga ete bato ya bilongi mibale bateka yo, esengeli nayo koboya na polele mpe na bosembo na elaka eye ozuaki na bango, pamba te Allah alingaka te bato ya bilongi mibale.

61. Mpe soki balingi kimia batiki bitumba, yo mpe yaka na kimia, kasi tia elikia epai ya Allah. Mpo azali ya soló moyoki mpe atonda boyebi.

67. Esengelaki te na ntoma kotiya bakangami na bitumba okati ya boloko, sé bakundama na mabele. Boye bozali kolinga lokumu na bomoyi ya nsé nzoka nde Allah alingi bomoyi ya mokolo ya suka. Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya.

70. Eh ntoma! Loba na baye bazali na maboko na bino kati na banguna baye bakangami kati na boloko ete: Soki Allah ayebi(1) ete mitema mia bino mizali malamu, akopesa bino ya malamu koleka biye babotoli bino, akolimbisa bino, mpo Allah azali molimbisi atonda ngolu.

71. Мре soki baponi koteka yo, yeba ete basilaki koteka Allah liboso, mpe (Allah) asukisaki bango, (o mokolo mwa badri). Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya.

72. Ya soló, baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) bakei (madinah), mpe babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango na nzela ya Allah, na baye bayambaki bango na lisungi na (madinah), baye wana nde bazali balingami bango na bango. Kasi тропа baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) te, esengeli na bino te kozua bango balingami kino bakolanda bino esika bozali. Mpe soki basengi bino lisungi na nkombo ya lingomba, esengeli na bino kopesa bango maboko, kasi ezala likolo ya bato oyo elaka ezali kati kati na bino na bango. Mpe Allah azali kornona manso bozali kosala.

75. Kasi тропа baye bandimaki sima na bino тре batikaki (Makkah), mpe babundaki elongo na bino, bango nde bato na bino. Kasi bondeko ya makila kati na bino bandimi ezali liboso тропа bokitani, engebene na buku ya Allah. Ya sólo, Allah azali na boyebi ya biloko binso.